29 Mpo nayebi malamu ete nsima ya liwa na ngai bokozanga te kobebisa makambo,+ mpe bokopɛngwa mpenza na nzela oyo napesi bino mitindo; mpe likama+ ekozanga te kokwela bino na nsuka ya mikolo, mpo bokosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpo na kosilikisa ye na misala ya mabɔkɔ na bino.”+
7 Mpe esalemaki bongo mpo bana ya Yisraele basalelaki Yehova Nzambe na bango lisumu,+ ye oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito na lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe babandaki kobanga banzambe mosusu;+
14 Ata bakapita nyonso ya banganga-nzambe+ mpe bato bazangaki bosembo na makambo mingi mpenza, na kolanda makambo nyonso oyo eyinamá+ ya bikólo, bongo bakómisaki mbindo ndako ya Yehova oyo asantisaki na Yerusaleme.+
4 Mawa na ekólo ya masumu,+ bato oyo libunga na bango ekómi kilo, momboto oyo ezali kosala mabe,+ bana oyo babebisaka makambo!+ Batiki Yehova,+ bazangi limemya epai ya Mosantu ya Yisraele,+ bapesi ye mokɔngɔ.+