Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Ntango Yeshurune+ abandaki kokóma mafutamafuta, abɛtabɛtaki makolo.+

      Okómaki mafutamafuta, okómaki monene, otondaki mingi.+

      Bongo asundolaki Nzambe, oyo asalaki ye,+

      Mpe atyolaki Libanga+ ya lobiko na ye.

  • Yirimia 7:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bótya motema na maloba ya lokuta te,+ na kolobáká ete: ‘Oyo ezali tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova, tempelo ya Yehova!’

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

  • Sefania 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Na mokolo yango, okoyoka nsɔni te mpo na misala na yo nyonso oyo obukaki mibeko na ngai,+ mpamba te, na ntango wana, nakolongola epai na yo bato na yo oyo bazali kosepela na lolendo;+ mpe okozala lisusu na lolendo te na ngomba na ngai mosantu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto