Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 11:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo Salomo abandaki kolanda Ashitorete+ nzambe-mwasi ya Basidone mpe kolanda Milikome+ eloko ya bosɔtɔ ya Baamone.

  • Nzembo 106:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Mpe basanganaki na bikólo+

      Mpe bayekolaki misala na bango.+

  • Yisaya 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ee talá ndenge engumba ya sembo+ ekómi mwasi ya ndumba!+ Etondaki na bosembo;+ boyengebene efandaki kuna,+ kasi sikoyo ezali nde babomi-bato.+

  • Yisaya 57:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe na nsima ya porte mpe ya likonzí ya porte, otyaki ekaniseli na yo.+ Mpo otikaki ngai, omitikaki bolumbu mpe omataki; okómisaki mbeto na yo monene.+ Mpe bamposa na yo etindi yo osala na bango kondimana. Olingaki kozala na bango mbeto moko.+ Otalaki enama ya mibali.

  • Yirimia 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+

  • Hosea 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Ebandeli ya liloba ya Yehova na nzela ya Hosea; Yehova alobaki na Hosea boye: “Kende,+ zwá mwasi oyo akosala pite mpe bana oyo aboti na pite na ye, mpamba te mpo na pite, mokili etiki kolanda Yehova.”+

  • Yakobo 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Basi ya ekobo,+ boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe?+ Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga+ ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto