Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 16:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe azalaki kotambola na nzela ya bakonzi ya Yisraele,+ mpe alekisaki kutu mwana na ye mbeka na mɔtɔ,+ na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki mpo na bana ya Yisraele.

  • 2 Ntango 33:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ye moko alekisaki bana na ye mbeka na mɔtɔ+ na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpe asalaki misala ya maji+ mpe asalelaki misala ya kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe asalaki misala ya bonganga-nkisi+ mpe atyaki bato oyo basololaka na bilimo+ ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+ Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.+

  • Yisaya 57:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 baoyo balamwisaka mposa makasi na banzete minene,+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ bazali koboma bana na mabwaku ya mikɛli, na nse ya madusu ya mabanga, boye te?+

  • Yirimia 7:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+

  • Yirimia 32:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Lisusu, batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kolekisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka+ epai ya Moleke,+ likambo oyo napesaki bango mitindo te,+ mpe eyelaki ngai mpe na motema te ete nasala likambo yango oyo eyinamá,+ mpo na kosalisa Yuda lisumu.’+

  • Ezekiele 20:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe natikaki bango bákóma mbindo na makabo na bango ntango bazalaki kolekisa mwana nyonso oyo azalaki kofungola libumu mbeka na mɔtɔ,+ mpo nakómisa bango bato oyo batikali mabɔkɔ mpamba, mpo báyeba ete nazali Yehova.”’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto