Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.”+

  • Ebandeli 17:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe mobali oyo akatami ngenga te, oyo mosuni ya mosutu na ye ekokatama te, ɛɛ molimo yango esengeli kolongolama kati na bato na ye.+ Abuki kondimana na ngai.”

  • Basambisi 16:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe Samsone alobaki boye: “Molimo na ngai ekufa+ elongo na Bafilistia.” Bongo amigumbaki na makasi, mpe ndako yango ekwelaki bankolo ya lisangani mpe bato nyonso oyo bazalaki na kati na yango,+ na yango bato oyo abomaki na ntango ya liwa na ye balekaki oyo abomaki na ntango ya bomoi na ye.+

  • Yobo 33:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe molimo na ye ezali kopusana pene na libulu,+

      Mpe bomoi na ye na baoyo bapesaka liwa.

  • Nzembo 78:50
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 50 Abongiselaki nkanda na ye nzela.+

      Apekisaki te ete molimo na bango ekende na liwa;

      Mpe akabaki bomoi na bango na maladi mabe.+

  • Yisaya 53:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana nakopesa ye likabo elongo na ebele ya bato,+ mpe na bato ya nguya nde akokabola biloko oyo epunzami,+ mpamba te asopaki molimo na ye kino na liwa,+ mpe atángamaki nde elongo na bato oyo babukaka mibeko;+ mpe ye moko amemaki lisumu ya bato ebele,+ mpe akómaki kokɔtela bato oyo babukaka mibeko.+

  • Misala 3:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ya solo, molimo nyonso oyo akoyoka Mosakoli wana te akobomama mpenza na kati ya bato.’+

  • Baroma 6:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,+ kasi likabo+ oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko+ na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.+

  • Emoniseli 16:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe oyo ya mibale+ asopaki kibakuli na ye na mbu.+ Mpe ekómaki makila+ lokola oyo ya moto oyo akufi, mpe milimo nyonso ya bomoi ekufaki, ɛɛ, biloko oyo ezalaki na mbu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto