1 Samwele 17:37 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 37 Na nsima Davidi abakisaki ete: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.”+ Na yango, Saulo alobaki na Davidi boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”+ 2 Samwele 22:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Epai ya moto ya sembo, okozala sembo;+Epai ya elombe oyo azali na mbeba te, okosala na mbeba te;+ Nzembo 27:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+Nakobanga nani?+Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+ Masese 18:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.+ Yisaya 12:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Talá! Nzambe azali lobiko na ngai.+ Nakotya motema mpe nakozala na nsɔmɔ te;+ mpo Yah Yehova azali makasi+ na ngai mpe nguya+ na ngai, mpe akómaki lobiko na ngai.”+ Danyele 6:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Azali kobikisa mpe kosikola,+ azali kosala bilembo mpe makamwisi na likoló+ mpe na mabele,+ mpo abikisi Danyele na lobɔkɔ ya bankɔsi.” Mika 7:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Kasi ngai, ezali Yehova nde nakotalela.+ Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai.+ Nzambe na ngai akoyoka ngai.+ 2 Bakorinti 1:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Na eloko monene oyo, liwa, nde abikisaki biso mpe akobikisa biso;+ mpe elikya na biso ezali epai na ye ete akobikisa biso lisusu.+
37 Na nsima Davidi abakisaki ete: “Yehova, oyo abikisaki ngai na nkɔsi mpe na urse, ye nde akobikisa ngai na lobɔkɔ ya Mofilistia oyo.”+ Na yango, Saulo alobaki na Davidi boye: “Kende, mpe tiká ete Yehova ye moko azala na yo.”+
27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+Nakobanga nani?+Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+
10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+ Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.+
2 Talá! Nzambe azali lobiko na ngai.+ Nakotya motema mpe nakozala na nsɔmɔ te;+ mpo Yah Yehova azali makasi+ na ngai mpe nguya+ na ngai, mpe akómaki lobiko na ngai.”+
27 Azali kobikisa mpe kosikola,+ azali kosala bilembo mpe makamwisi na likoló+ mpe na mabele,+ mpo abikisi Danyele na lobɔkɔ ya bankɔsi.”
7 Kasi ngai, ezali Yehova nde nakotalela.+ Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai.+ Nzambe na ngai akoyoka ngai.+
10 Na eloko monene oyo, liwa, nde abikisaki biso mpe akobikisa biso;+ mpe elikya na biso ezali epai na ye ete akobikisa biso lisusu.+