Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 8:54
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 54 Mpe esalemaki boye: ntango kaka Salomo asilisaki kobondela Yehova na libondeli oyo mobimba mpe na lilɔmbɔ oyo mpo na koluka kondimama, atɛlɛmaki na esika oyo agumbamaki mabɔlɔngɔ na nse,+ alongwe liboso ya etumbelo ya Yehova mpe atomboli mabɔkɔ na ye na likoló;+

  • 2 Ntango 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 (Mpo Salomo asalaki estradɛ+ ya motako mpe atyaki yango na katikati ya lopango.+ Bolai na yango ezalaki mapeko mitano, mpe bonene na yango mapeko mitano, mpe bosanda na yango mapeko misato; mpe atɛlɛmaki likoló na yango.) Mpe afukamaki+ na mabɔlɔngɔ na ye liboso ya lisangá mobimba ya Yisraele mpe atombolaki mabɔkɔ na ye na likoló.+

  • Ezera 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe na ntango ya likabo ya mbuma+ ya mpokwa, natɛlɛmaki nalongwe na esika oyo nafandaki na komikitisa, nalati elamba na ngai ná kazaka na ngai ezangá mabɔkɔ oyo epasukaki, mpe nabandaki kofukama na mabɔlɔngɔ+ na ngai mpe natombolaki mabɔkɔ na ngai epai ya Yehova Nzambe na ngai.+

  • Nzembo 95:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Ee bókɔta, tósambela mpe tógumbama;+

      Tófukama+ liboso ya Yehova Mokeli na biso.+

  • Luka 22:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Mpe ye moko akendaki mwa mosika* na bango, mpe agumbaki mabɔlɔngɔ mpe abandaki kobondela

  • Misala 7:60
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 60 Na nsima, agumbaki mabɔlɔngɔ na ye, agangi na mongongo makasi ete: “Yehova, kotángela bango lisumu oyo te.”+ Mpe nsima ya koloba bongo alalaki na kati ya liwa.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto