Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bango mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná,+ makonzí ya losambo+ ná nzete ya losambo,+ na ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • Yisaya 65:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 mpo na mabunga na bango moko mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na bango, nyonso na mbala moko,”+ Yehova alobi bongo. “Lokola babimisi milinga ya mbeka na bangomba, mpe basambwisi ngai+ na bangomba mike,+ ngai mpe nakomeka libosoliboso lifuti na bango na ntolo na bango.”+

  • Yirimia 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe na mikolo ya mokonzi Yosiya,+ Yehova alobaki na ngai boye: “‘Omoni likambo Yisraele oyo azangi bosembo asali?+ Azali kokende na ngomba nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ mpo asala bondumba kuna.+

  • Ezekiele 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto