4 Mpe nkombo ya yaya Ohola, mpe nkombo ya ndeko na ye Oholiba; mpe bakómaki ya ngai+ mpe babandaki kobota bana mibali ná bana basi.+ Mpe na oyo etali nkombo na bango, Ohola nde Samaria,+ mpe Oholiba nde Yerusaleme.+
11 “Ntango ndeko na ye ya mwasi Oholiba amonaki yango,+ amipesaki na mposa na ye ya nzoto mpe amibebisaki koleka ye, mpe amipesaki na bondumba na ye makasi koleka pite ya ndeko na ye.+