1 Bakonzi 18:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Na nsima, Eliya apusanaki epai ya bato nyonso mpe alobaki boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi?*+ Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye;+ kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.” Mpe bato bazongiselaki ye ata liloba moko te. Sefania 1:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 ná baoyo bazali kogumbamela mampinga ya likoló na bansamba ya bandako,+ ná baoyo bazali kogumbama+ mpe kolapela Yehova ndai+ mpe kolapa ndai na nkombo ya Malakame;+
21 Na nsima, Eliya apusanaki epai ya bato nyonso mpe alobaki boye: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi?*+ Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye;+ kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.” Mpe bato bazongiselaki ye ata liloba moko te.
5 ná baoyo bazali kogumbamela mampinga ya likoló na bansamba ya bandako,+ ná baoyo bazali kogumbama+ mpe kolapela Yehova ndai+ mpe kolapa ndai na nkombo ya Malakame;+