Kolimbola Mibeko 2:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpo Yehova Nzambe na yo apamboli yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo.+ Ayebi malamu ndenge otamboli na esobe monene oyo. Mbula ntuku minei (40)+ oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo. Ozangaki eloko te.”’+ Kolimbola Mibeko 32:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Ayaki kokuta ye na mokili ya esobe,+Mpe na mokili ekauká oyo ezali mpamba, oyo ezali koganga na kolela.+Abandaki kozinga ye,+ kobatela ye,+Kobatela ye lokola mbuma ya liso na ye.+ Yirimia 2:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 “Kende, mpe osengeli kobelela na matoi ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Nazali kokanisa lisusu motema boboto ya bolenge na yo,+ bolingo oyo omonisaki ntango olakamaki libala,+ ndenge ozalaki kotambola nsima na ngai na esobe, na mokili oyo baloná mboto te.+
7 Mpo Yehova Nzambe na yo apamboli yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo.+ Ayebi malamu ndenge otamboli na esobe monene oyo. Mbula ntuku minei (40)+ oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo. Ozangaki eloko te.”’+
10 Ayaki kokuta ye na mokili ya esobe,+Mpe na mokili ekauká oyo ezali mpamba, oyo ezali koganga na kolela.+Abandaki kozinga ye,+ kobatela ye,+Kobatela ye lokola mbuma ya liso na ye.+
2 “Kende, mpe osengeli kobelela na matoi ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Nazali kokanisa lisusu motema boboto ya bolenge na yo,+ bolingo oyo omonisaki ntango olakamaki libala,+ ndenge ozalaki kotambola nsima na ngai na esobe, na mokili oyo baloná mboto te.+