Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ntango na bino ya kotutatuta mbuma ekokóma mpenza tii na ntango ya kobuka mbuma ya vinyo, mpe ntango ya kobuka mbuma ya vinyo ekokóma tii na ntango ya kolona mboto; mpe bokolya mpenza limpa ndenge bolingi+ mpe bokofanda na kimya na mokili na bino.+

  • Yirimia 23:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mikolo na ye Yuda ekobikisama,+ mpe Yisraele ekofanda na kimya.+ Mpe talá nkombo oyo bakobenga ye: Yehova azali Boyengebene na biso.”+

  • Ezekiele 34:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “‘“Mpe nakosala kondimana ya kimya ná bampate yango,+ mpe nakosilisa mpenza banyama mabe ya zamba na mokili yango,+ mpe ekofanda mpenza na kimya na esobe mpe ekolala na bazamba.+

  • Mika 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi,+ mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango;+ mpo monɔkɔ mpenza ya Yehova ya mampinga elobi yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto