Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 10:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na mbala moko, Moize asembolaki lobɔkɔ na ye na likoló, mpe molili tuu ezalaki na mokili mobimba ya Ezipito na boumeli ya mikolo misato.+

  • Kobima 14:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bongo yango eyaki kotɛlɛma kati ya kaa ya Baezipito mpe kaa ya Yisraele.+ Na ngámbo mosusu, yango ezalaki lipata ná molili. Na ngámbo mosusu, yango ezalaki kaka kongɛngisa butu.+ Mpe etuluku oyo ebɛlɛmaki te na etuluku oyo mosusu, butu mobimba.

  • Yisaya 5:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe na mokolo yango, bakonguluma likoló na yango lokola konguluma ya mbu.+ Mpe ya solo, bakotalatala mokili, mpe talá! ezali na molili ya nsɔmɔ;+ mpe ata pole ekómi molili mpo na matangá oyo ezali kokwela yango.

  • Yirimia 13:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bópesa Yehova Nzambe na bino nkembo,+ liboso ete ayeisa molili+ mpe liboso ete makolo na bino etutana likoló ya bangomba na ebandeli ya molili.+ Mpe bokolikya mpenza komona pole,+ mpe akokómisa yango mpenza molili makasi;+ akobongola yango molili tuu.+

  • Amose 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘Mpe ekosalema boye na mokolo yango,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nakolalisa moi na ntango ya midi,+ mpe nakoyeisa molili na mokili, wana moi ezali kongɛnga.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto