Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 14:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Ee Filistia,+ kosepela te,+ moto moko te kati na bato na yo, kaka mpo lingenda ya moto oyo azalaki kobɛta yo ebukani.+ Mpo uta na mosisa ya nyoka,+ nyoka moko ya ngɛngɛ ekobima,+ mpe mbuma na yango ekozala nyoka ya ngɛngɛ oyo epumbwaka.+

  • Yirimia 47:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpo na mokolo oyo ezali koya mpo na kopunza Bafilistia nyonso,+ kolongola na Tire+ mpe na Sidone+ mobiki nyonso oyo azalaki kosunga.+ Mpo Yehova azali kopunza Bafilistia,+ oyo bazali batikali oyo bautaki na esanga ya Kafitore.+

  • Ezekiele 25:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kosembolela Bafilistia lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakolongola Bakerete,+ mpe nakobebisa bato oyo batikali na bokula ya mbu.+

  • Sefania 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mawa na baoyo bafandaka na etúká ya mbu, ekólo ya bato ya Kerete!+ Liloba ya Yehova etɛmɛli bino. Ee Kanana, mokili ya Bafilistia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akofanda wana.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto