6 Mpe na kati na yango ekotikala kaka mbuma ya kolɔkɔta lokola ntango baningisaka nzete ya olive: mbuma mibale to misato ya olive oyo eteli na nsɔngɛ ya etape; mbuma minei to mitano kuna na bitape oyo ebotaka mbuma,” yango nde liloba ya Yehova Nzambe ya Yisraele.+
13 Mpo ekozala bongo na katikati ya mokili, na kati ya bato ya bikólo, lokola babɛtabɛtaka nzete ya olive,+ lokola balɔkɔtaka mbuma ya vinyo ntango mosala ya kobuka mbuma ya vinyo ekómaka na nsuka.+
9 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ya solo mpenza bakolɔkɔta batikali ya Yisraele kaka ndenge balɔkɔtaka mbuma ya nzete ya vinyo.+ Zongisá lobɔkɔ na yo lokola moto oyo azali kobuka mbuma ya vinyo na bitape oyo elíngamalíngamá ya nzete ya vinyo.”