Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 abatelaka motema boboto mpo na bankóto,+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu,+ kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu,+ mpe mpo na libunga ya batata, ayeiselaka bana etumbu mpe bana ya bana, libota ya misato mpe libota ya minei.”+

  • Nehemia 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo baboyaki koyoka,+ mpe bakanisaki+ te misala na yo ya kokamwa oyo osalelaki bango, kasi bakómisaki motó na bango makasi+ mpe batyaki mokonzi+ mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito. Kasi yo ozali Nzambe ya bolimbisi,+ ya ngɔlu+ mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda+ noki te mpe otondi+ na motema boboto, mpe otikaki bango te.+

  • Nzembo 65:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Makambo ya libunga eleki ngai na makasi.+

      Misala na biso ya kobuka mibeko, yo moko okozipa yango.+

  • Nzembo 86:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu+ mpe osepelaka kolimbisa;+

      Mpe motema boboto oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.+

  • Yisaya 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova alobi: “Sikoyo, bóya mpe tóbongisa makambo kati na biso.+ Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ;+ ata soki ezali motane lokola elamba ya motane makasi, ekokóma lokola lɛnɛ.

  • Yisaya 44:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nakozipa misala na yo ya kobuka mibeko lokola nde na lipata,+ mpe masumu na yo lokola nde na lipata moko monene. Zongelá ngai,+ mpo nakosikola yo.+

  • Yirimia 50:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Mpe na mikolo yango mpe na ntango yango,”+ yango nde liloba ya Yehova, “bakoluka libunga ya Yisraele,+ kasi ekozala te; mpe masumu ya Yuda,+ kasi ekomonana te, mpo nakolimbisa bato oyo natikaki bátikala.”+

  • Danyele 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Yehova Nzambe na biso, ozali na motema mawa+ mpe olimbisaka+ kasi biso totombokelaki yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto