Yisaya 9:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpe baoyo bazali kokamba bato oyo nde bazali kotinda bango báyengayenga;+ mpe bato na bango oyo bakambami, bango nde babulunganisami.+ Yisaya 56:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Basinzili na ye bakufá miso.+ Ata moko na bango atye likebi te.+ Bango nyonso bazali bambwa oyo egangaka te; ezali kokoka koganga te,+ ezali komɛla mpema, elali na nse, elingá kolala.+ Ezekiele 13:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 mpo, ɛɛ, mpo bapɛngwisi bato na ngai na ndenge bazali koloba ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ mpe moto moko azali kotonga efelo oyo ekaboli biteni ya ndako, kasi bato bazali kopakola yango mpɛmbɛ+ kaka mpamba.’+ Matai 15:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”+
16 Mpe baoyo bazali kokamba bato oyo nde bazali kotinda bango báyengayenga;+ mpe bato na bango oyo bakambami, bango nde babulunganisami.+
10 Basinzili na ye bakufá miso.+ Ata moko na bango atye likebi te.+ Bango nyonso bazali bambwa oyo egangaka te; ezali kokoka koganga te,+ ezali komɛla mpema, elali na nse, elingá kolala.+
10 mpo, ɛɛ, mpo bapɛngwisi bato na ngai na ndenge bazali koloba ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ mpe moto moko azali kotonga efelo oyo ekaboli biteni ya ndako, kasi bato bazali kopakola yango mpɛmbɛ+ kaka mpamba.’+
14 Bótika bango. Bazali batambwisi oyo bakufá miso. Boye, soki moto oyo akufá miso azali kotambwisa moto oyo akufá miso, bango mibale bakokwea na libulu.”+