-
Yirimia 46:10Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 “Mpe mokolo yango ezali ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, mokolo ya kozongisa mabe mpo akozongisela banguna na ye mabe.+ Mpe mopanga ekolya mpenza mpe ekotonda mpe ekomɛla makila na bango, mpo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga, azali na mbeka+ na mokili ya nɔrdi pene ya ebale Efrate.+
-
-
Ezekiele 39:17Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 “Nde yo, Ee mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lobá na bandɛkɛ ya mapapu ya ndenge nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ete:+ “Bóyangana mpe bóya. Bóyangana epai na epai na mbeka na ngai, oyo nazali kopesa bino, mbeka moko monene na bangomba ya Yisraele.+ Mpe bokolya mpenza mosuni mpe bokomɛla makila.+
-