Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye: Yehova akopesa lobɔkɔ na ye lisusu, mpo na mbala ya mibale,+ mpo na kozwa bato na ye oyo bakotikala na Asiri+ mpe na Ezipito,+ na Patrose+ mpe na Kushi,+ na Elame,+ na Shinare,+ na Hamate mpe na bisanga ya mbu.+

  • Yirimia 31:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo talá oyo Yehova alobi: “Bóganga makasi na esengo epai ya Yakobo, mpe bóganga makasi epai ya oyo azali motó ya bikólo.+ Bósakola yango.+ Bósanzola mpe bóloba ete: ‘Ee Yehova, bikisá bato na yo, batikali ya Yisraele.’+

  • Mika 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Nakoyanganisa mpenza Yakobo, ɛɛ, yo mobimba;+ solo mpenza, nakosangisa esika moko bato ya Yisraele oyo batikali.+ Nakotya bango na bomoko, lokola bibwɛlɛ na lopango, lokola etonga na kati ya esika ya kolya matiti;+ makɛlɛlɛ ya bato ekozala kuna.’+

  • Mika 4:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe oyo azalaki kotɛnguma nakokómisa mpenza ye litiká,+ mpe ye oyo abwakamaki mosika, nakokómisa ye ekólo moko ya makasi;+ mpe Yehova akoyangela mpenza bango na Ngomba Siona, uta sikoyo mpe mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Hagai 1:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe Zerubabele+ mwana ya Shealatiele, ná Yosua mwana ya Yehozadake+ nganga-nzambe monene, mpe batikali nyonso kati na bato, babandaki koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na bango,+ mpe maloba ya mosakoli Hagai,+ ndenge Yehova Nzambe na bango atindaki ye; mpe bato bakómaki kobanga Yehova.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto