-
Yirimia 29:14Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
14 Mpe nakomitika ete bózwa ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakoyanganisa etuluku ya bakangami na bino mpe nakosangisa bino uta na bikólo nyonso mpe uta na bisika nyonso epai napalanganisá bino,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Mpe nakozongisa bino lisusu na esika oyo nalongolaki bino mpo na kotinda bino na mboka mopaya.’+
-
-
Yirimia 30:10Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
10 “Nde yo, kobanga te, Ee mosaleli na ngai Yakobo,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe kozala na nsɔmɔ te, Ee Yisraele.+ Mpo talá nazali kobikisa yo uta na mosika mpe bana na yo uta na mokili oyo bakangamaki.+ Mpe Yakobo akozonga mpenza mpe akotungisama lisusu te mpe akozala na kimya, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa ye.”+
-