Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 85:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Nakoyoka oyo Yehova Nzambe ya solo akoloba,+

      Mpo akolobela kimya epai ya bato na ye+ mpe epai ya bato na ye ya sembo,

      Kasi bázongela te komityela motema.+

  • Yisaya 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bikólo,+ mpe akosembola makambo+ etali bato mingi ya bikólo.+ Mpe bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti.+ Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.+

  • Yisaya 60:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na esika ya motako nakotya wolo,+ mpe na esika ya ebende nakotya palata, mpe na esika ya nzete, motako, mpe na esika ya mabanga, ebende; mpe nakotya kimya ezala bakɛngɛli+ na yo mpe boyengebene ezala bato oyo bapesaka yo mosala.+

  • Zekaria 8:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 ‘Mpo momboto ya kimya ekozala;+ nzete ya vinyo ekopesa mbuma na yango,+ mpe mabele ekopesa mbuma na yango,+ mpe likoló ekopesa mamwɛ na yango;+ mpe nakosala mpenza ete bato oyo bakotikala+ na kati ya bato oyo bázwa libula ya biloko nyonso wana.+

  • Yoane 14:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Natikeli bino kimya na ngai, napesi bino kimya+ na ngai. Napesi bino yango ndenge mokili epesaka yango te. Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto