2 Ntango 16:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Mpo na Yehova, miso na ye+ ezali kotambolatambola na mabele mobimba+ mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema+ na bango ezali mobimba epai na ye. Osali bozoba+ na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”+ Masese 15:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Miso ya Yehova ezalaka na esika nyonso,+ ezali kotalatala bato mabe ná bato malamu.+ Yirimia 16:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+
9 Mpo na Yehova, miso na ye+ ezali kotambolatambola na mabele mobimba+ mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema+ na bango ezali mobimba epai na ye. Osali bozoba+ na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”+
17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+