Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpo baboteli biso mwana,+ bapesi biso mwana mobali;+ mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye.+ Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene,+ Nzambe ya Nguya,+ Tata ya Seko,+ Nkumu ya Kimya.+

  • Yisaya 32:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Talá! Mokonzi+ moko akoyangela mpo na boyengebene;+ bongo bankumu+ bakoyangela mpo na bosembo.

  • Danyele 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Nazalaki se kotala na bimonaneli ya butu, mpe talá! moto moko lokola mwana ya moto+ azalaki koya na mapata+ ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo,+ mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana.+

  • Zekaria 13:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Ee mopanga, lamuká mpo na kotɛmɛla mobateli ya mpate na ngai,+ ɛɛ mpo na kotɛmɛla mobali makasi oyo azali moninga na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga. “Bɛtá mobateli ya mpate,+ mpe bampate ya etonga epanzana;+ mpe nakozongisela mpenza baoyo bazali moke lobɔkɔ na ngai.”+

  • Marko 15:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Nzokande, ntango mokonzi ya basoda oyo atɛlɛmaki liboso na ye amonaki ete akati motema na ntango makambo wana ezalaki kosalema, alobaki ete: “Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe.”+

  • Yoane 19:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na yango Yesu abimaki libándá, alati motole ya nzubɛ mpe elamba ya likoló ya motane-bulé. Mpe alobaki na bango ete: “Talá! Moto!”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto