4 Banyama ya maladi, bokembisi yango te;+ mpe nyama oyo ezali kobɛla, bobikisi yango te; oyo ebukani, bokangi yango eteni ya elamba te; oyo epalangani, bozongisi yango te; mpe oyo ebungi, boluki yango te;+ kasi boyangeli yango na makasi, ɛɛ na monyoko makasi.+