2 Mpe akobima lokola mwa nzete+ liboso ya moto, mpe lokola mosisa oyo ezali kobima na mokili oyo ezangá mai. Azali engambe te, na nkembo mpe te;+ mpe ntango tokomona ye, lolenge na ye ekopesa biso mposa ya kolinga ye te.+
5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+
“‘Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Talá mobali+ oyo nkombo na ye Etape.+ Mpe uta na esika na ye mpenza akobimisa etape, mpe akotonga mpenza tempelo ya Yehova.+