Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Marko 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, afandaki na mesa na ndako ya Levi, mpe ebele ya bakɔngɔli-mpako+ ná basumuki bafandaki elongo na Yesu ná bayekoli na ye, mpo bazalaki mingi mpe babandaki kolanda ye.+

  • Marko 2:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bakomeli ya Bafarisai, ntango bamonaki ye azali kolya elongo na basumuki ná bakɔngɔli-mpako, babandaki koloba na bayekoli na ye ete: “Azali nde kolya elongo na bakɔngɔli-mpako ná basumuki?”+

  • Luka 5:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Bongo Bafarisai ná bakomeli na bango babandaki koimaima mpe koloba na bayekoli na ye ete: “Mpo na nini bozali kolya mpe komɛla elongo na bakɔngɔli-mpako mpe basumuki?”+

  • Luka 7:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Ntango Mofarisai oyo abengisaki ye amonaki bongo alobaki na motema na ye ete: “Soki moto oyo azalaka mpenza mosakoli,+ mbɛlɛ ayebi mwasi oyo azali kosimba ye mpe bizaleli na ye, mbɛlɛ ayebi ete azali mosumuki.”+

  • Luka 15:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo Bafarisai ná bakomeli bazalaki koimaima mpe koloba ete: “Moto oyo azali koyamba basumuki mpe azali kolya na bango.”+

  • Luka 19:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi ntango bamonaki bongo, bango nyonso babandaki koimaima+ mpe koloba ete: “Akɔti kofanda epai ya moto oyo azali mosumuki.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto