-
Yisaya 58:2Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
2 Kasi mokolo na mokolo, bazali koluka ngai, mpe bazali komonisa ete basepeli koyeba banzela na ngai,+ lokola ekólo moko oyo ezali kosalela boyengebene mpe oyo etiki bosembo ya Nzambe na bango te,+ bazali se kosɛnga ngai bikateli ya boyengebene, na ndenge bazali kobɛlɛma na Nzambe oyo bazali kosepela na ye,+
-
Ezekiele 33:31Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
31 Mpe bakokɔta epai na yo, ndenge kaka bato bakɔtaka, mpe bakofanda liboso na yo lokola bato na ngai;+ mpe bakoyoka mpenza maloba na yo kasi bakosalela yango te,+ mpamba te na monɔkɔ na bango, bazali komonisa mposa makasi ya kosangisa nzoto mpe motema na bango ezali kolanda nde litomba oyo bazali kozwa na ndenge ya mabe.+
-
-
-