Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 6:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 “‘Eloko nyonso oyo ekosimba mosuni na yango ekokóma mosantu,+ mpe ntango moto akomwangisa mwa ndambo ya makila na yango likoló ya elamba,+ okosukola elamba yango oyo ye akomwangisela makila na esika mosantu.+

  • Mitángo 15:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 “Lobá na bana ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango ete basengeli komisalela ndelo ya malendamalenda na nsɔngɛ ya bilamba na bango na boumeli ya mabota na bango, mpe basengeli kotya nsinga ya bulé na likoló ya ndelo yango ya malendamalenda ya nsɔngɛ ya elamba,+

  • Matai 9:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 mpo azalaki koloba na motema na ye ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.”+

  • Marko 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo abikisaki bato mingi, bongo baoyo nyonso bazalaki na bamaladi ya makasi bazalaki kokwela ye mpo na kosimba ye.+

  • Luka 6:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe ebele nyonso wana ya bato bazalaki koluka kosimba+ ye, mpamba te nguya+ ezalaki kobima ye mpe kobikisa bango nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto