-
Nzembo 45:maloba ya ebandeli ya loyembo-17Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo ya Bafololo lísi. Ya bana ya Kora. Maskile. Loyembo ya basi ya bolingo.
45 Motema na ngai ekómi koningana mpo na likambo moko ya malamu.+
Nazali koloba ete: “Misala na ngai etali mokonzi moko.”+
Lolemo na ngai ezala ekomeli+ ya mosali-bakopi oyo ayebi mosala malamu.+
2 Ozali mpenza kitoko mingi koleka bana ya bato.+
Mbɛbu na yo ezali kosopa maloba ya elɛngi.+
Yango wana Nzambe apamboli yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
3 Ee moto ya nguya,+ kangá mopanga+ na yo na loketo, na ebɛlɔ na yo,
Ná lokumu na yo mpe nkembo na yo.+
4 Mpe na nkembo na yo kende kolonga;+
Matá na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa ná boyengebene,+
Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekoteya yo makambo ya nsɔmɔ.+
5 Makula na yo epeli makasi, ekokɔta na motema ya banguna ya mokonzi,+
Bato ya bikólo bazali kaka kokwea na nse na yo.+
6 Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko;+
Lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo.+
7 Olingi boyengebene+ mpe oyini makambo ya mabe.+
Yango wana Nzambe, Nzambe na yo,+ atye yo mafuta+ ya esengo+ koleka baninga na yo.+
8 Bilamba na yo nyonso ezali malasi ya mire, nzete ya aloe ná kasia;+
Longwa na ndako monene ya kitoko, ya mpɛmbɛ ya nzoku,+ bibɛtɛlo oyo ya bansinga esepelisi yo.
9 Bana basi+ ya bakonzi bazali na kati ya basi na yo ya bolingo.
Mwasi ya mokonzi+ atɛlɛmi na lobɔkɔ na yo ya mobali, alati wolo ya Ofire.+
10 Yoká, Ee mwana mwasi, mpe talá, mpe sembolá litoi na yo;
Mpe bosaná bato na yo mpe ndako ya tata na yo.+
12 Mwana mwasi ya Tire azali wana mpe na likabo+—
Bato ya bozwi na kati ya bato bakokitisa yo motema.+
13 Mwana mwasi ya mokonzi azali na nkembo mingi na kati ya ndako;+
Bilamba na ye etyami biloko ya wolo.
14 Bakoya na ye epai ya mokonzi na molato oyo elitamá.+
Bangɔndɔ oyo bazali baninga na ye, oyo bazali kolanda ye na nsima, bazali kokɔtisama epai na yo.+
15 Bakoya na bango na nsai mpe na esengo;
Bakokɔta na ndako monene ya mokonzi.
-