51 Kasi, talá! moko ya baoyo bazalaki na Yesu asembolaki lobɔkɔ na ye mpe abimisaki mopanga na ye mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi.+
10 Bongo Simo Petro, lokola azalaki na mopanga, abimisaki yango mpe abɛtaki moombo ya nganga-nzambe monene mpe akataki ye litoi ya mobali.+ Nkombo ya moombo yango Malakusi.