2 azalaki moto oyo amipesá na losambo+ mpe oyo azalaki kobanga+ Nzambe elongo na bato nyonso ya ndako na ye, mpe azalaki kopesa bato makabo mingi ya motema mawa+ mpe azalaki ntango nyonso kosala lilɔmbɔ epai ya Nzambe.+
14 kasi ete, na nzela ya bokokani, biloko oyo eleki mingi epai na bino ezipa sikoyo kozanga na bango, mpo ete biloko oyo eleki mingi epai na bango eya mpe kozipa kozanga na bino, bongo bokokani ezala.+
17 Kasi moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo+ mpe amoni ndeko na ye azali kokelela+ mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema,*+ ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?+