11 Ngai nazali kobatisa bino na mai+ mpo bobongoli motema;+ kasi moto oyo azali koya+ nsima na ngai azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.+ Moto yango akobatisa bino na elimo santu+ mpe na mɔtɔ.+
33 Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi Oyo mpenza atindaki ngai+ nabatisa na mai alobaki na ngai ete: ‘Moto oyo okomona elimo ekiti likoló na ye mpe efandi, ye nde moto oyo abatisaka na elimo santu.’+
45 Mpe bato ya sembo oyo bayaki elongo na Petro oyo bazalaki bamoko ya baoyo bakatamá ngenga bakamwaki, mpo likabo ya ofele ya elimo santu ezalaki kosopama likoló ya bato ya bikólo.+
13 Mpo, ya solo mpenza, na nzela ya elimo kaka moko biso nyonso tobatisami+ na nzoto kaka moko, Bayuda to Bagrɛki, baombo to bato ya bonsomi, bamɛlisaki+ mpe biso nyonso elimo kaka moko.