Matai 26:39 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 39 Mpe apusanaki mwa moke liboso, akwei elongi na nse, abondeli+ mpe alobi: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ oyo+ eleka mosika na ngai. Nzokande, ezala ndenge ngai nalingi te,+ kasi ndenge yo olingi.”+ Yoane 5:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; kaka ndenge nazali koyoka, ndenge mpe nazali kosambisa; mpe kosambisa oyo nazali kosambisa ezali sembo,+ mpo nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano+ ya moto oyo atindaki ngai.
39 Mpe apusanaki mwa moke liboso, akwei elongi na nse, abondeli+ mpe alobi: “Tata na ngai, soki ekoki kosalema, kɔpɔ oyo+ eleka mosika na ngai. Nzokande, ezala ndenge ngai nalingi te,+ kasi ndenge yo olingi.”+
30 Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; kaka ndenge nazali koyoka, ndenge mpe nazali kosambisa; mpe kosambisa oyo nazali kosambisa ezali sembo,+ mpo nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano+ ya moto oyo atindaki ngai.