23 Mpe nakobimisela yango mobateli moko ya mpate,+ mpe akoleisa yango mpenza, ɛɛ mosaleli na ngai Davidi.+ Ye nde akoleisa yango, mpe ye nde akokóma mobateli na yango.+
24 “‘“Mpe mosaleli na ngai Davidi akozala mokonzi na bango,+ mpe bango nyonso bakozala na mobateli ya mpate kaka moko;+ mpe bakotambola na bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe bakotosa mibeko na ngai,+ mpe bakokokisa mpenza yango.+