Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 19:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “‘Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe+ to kokangela bango nkanda;+ mpe osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko.+ Ngai nazali Yehova.

  • Kolimbola Mibeko 32:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Kozongisa mabe ezali likambo na ngai, mpe kofuta.+

      Lokolo na bango ekotengatenga+ na ntango oyo etyami,

      Mpo mokolo ya likama na bango ekómi pene,+

      Mpe makambo oyo elɛngɛlami mpo na bango ezali mpenza koya mbangumbangu.’+

  • Nzembo 99:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Ee Yehova Nzambe na biso, yo moko oyanolaki bango.+

      Ozalaki mpo na bango Nzambe moko oyo alimbisaka,+

      Mpe oyo azongisaka mabe mpo na misala na bango oyo ekendá nsango mabe.+

  • Nahumu 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye+ mpe oyo azongisaka mabe; Yehova azongisaka mabe+ mpe azalaka pene na koyoka nkɛlɛ.+ Yehova azongiselaka batɛmɛli na ye mabe,+ mpe akangelaka banguna na ye nkanda.+

  • Baebre 10:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpo toyebi moto oyo alobaki ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nde nakozongisa”;+ mpe lisusu ete: “Yehova akosambisa bato na ye.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto