15 Mpo bozwaki elimo ya boombo te oyo ezali kopesa lisusu kobanga,+ kasi bozwaki nde elimo+ oyo esali ete Nzambe akamata bino mpe akómisa+ bino bana na ye, oyo na nzela na yango tobelelaka ete: “Aba,+ Tata!”
5Mpo na bonsomi ya ndenge wana nde Kristo asikoli biso.+ Yango wana, bótɛlɛma makasi,+ mpe bótika te ete bátya bino lisusu na nkaka ya ekanganeli moko ya boombo.+
13 Ya solo, bandeko, bobengamaki mpo na bonsomi;+ kasi bósalela bonsomi yango te lokola nzela ya kokokisa bamposa ya nzoto,+ kasi na bolingo bósalelanaka lokola baombo.+