2 Mpo nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,+ mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino+ na mobali+ kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto+ epai ya Kristo.+
4 ndenge mpe aponaki+ biso na bomoko elongo na ye liboso ya ebandeli+ ya mokili, mpo tózala basantu mpe tózanga mbeba+ liboso na ye na kati ya bolingo.+
22 sikoyo azongisi bino lisusu na boyokani+ na lisalisi ya nzoto ya mosuni ya moto wana na nzela ya liwa na ye,+ mpo na kobimisa bino liboso na ye basantu mpe bato bazangi litɔnɔ+ mpe bato bakoki kofundama na likambo moko te,+
22 tiká ete, na mitema ya solosolo, tópusana kuna na kondima makasi mpenza, lokola mitema na biso epɛtolami* na lisosoli ya mabe+ mpe nzoto na biso esukolami na mai ya pɛto.+
27 Kasi eloko nyonso oyo ezali mosantu te mpe moto nyonso oyo asalaka likambo moko ya bosɔtɔ+ mpe abukaka lokuta+ akokɔta kuna te;+ kaka baoyo bakomami na rulo ya bomoi ya Mwana-Mpate nde bakokɔta.+