17 Yesu azongisaki ete: “Ee libota ezangá kondima mpe egumbamá,+ nakoumela na bino tii ntango nini? Nakokanga motema na makambo na bino tii ntango nini? Bómemela ngai ye awa.”
12 Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo,+ mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde bazali koloba na basali-mabe, bápesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala+ mpo bamoni na miso na bango misala na bino ya malamu.+