2 “Kasi nani akokoka na mokolo ya koya na ye,+ mpe nani akotɛlɛma ntango ye akomonana?+ Mpo ye akozala lokola mɔtɔ ya monyangwisi-bibende+ mpe lokola sabuni+ ya basukoli-bilamba.+
38 Mpo moto nyonso oyo azali koyoka nsɔni mpo na ngai mpe mpo na maloba na ngai na libota oyo ya ekobo mpe ya masumu, Mwana ya moto mpe akoyoka nsɔni+ mpo na ye ntango akoya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu basantu.”+
7 kasi, epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli+ ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu+ na ye ya nguya