Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 45:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kasi Yisraele akobika mpo ye ná Yehova bazali na bomoko+—ekozala lobiko mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bokoyoka nsɔni te,+ mpe bokosambwa te,+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ, mpo na seko.

  • Danyele 9:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 “Bakateli bato ya ekólo na yo+ mpe engumba mosantu+ pɔsɔ ntuku nsambo (70), mpo na kosukisa kobuka mibeko,+ mpe kosilisa lisumu nyɛɛ,+ mpe kozipa masumu mpo na libunga,+ mpe kokɔtisa boyengebene mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe kobɛta kashɛ+ na emonaneli mpe mosakoli, mpe kotya Esika Mosantu ya Bisika Mosantu mafuta.+

  • Baroma 11:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe wana ezali kondimana na ngai ná bango,+ ntango nakolongola masumu na bango.”+

  • Baebre 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 elobi lisusu ete: “Mpe nakokanisa lisusu te masumu na bango mpe misala na bango ya kobuka mibeko.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto