Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 mpe bato na ngai,+ oyo babengami na nkombo na ngai+ bamikitisi+ mpe babondeli+ mpe baluki elongi na ngai+ mpe babongwani, batiki banzela na bango ya mabe,+ ngai nakoyoka na likoló+ mpe nakolimbisa lisumu na bango,+ mpe nakobikisa mokili na bango.+

  • 2 Ntango 33:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe azalaki kobondela Ye, bongo Ye andimaki libondeli+ ya Manase mpe ayokaki lilɔmbɔ na ye mpo na kondimama mpe azongisaki ye na Yerusaleme na bokonzi na ye;+ mpe Manase ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.+

  • Nzembo 34:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene,+

      Mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+

  • Zekaria 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo nani atyoli mokolo ya makambo ya mike?+ Mpe bakosepela+ mpenza mpe bakomona nsinga ya nivo na lobɔkɔ ya Zerubabele. Miso yango nsambo ezali miso ya Yehova.+ Yango ezali kotambola epai na epai na mabele mobimba.”+

  • 1 Petro 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpo miso+ ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango;+ kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto