Nzembo 39:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 39 Nalobaki ete: “Nakobatela banzela na ngai+Mpo nasala lisumu te na lolemo na ngai.+Nakotya eloko ya kokanga monɔkɔ mpo ekɛngɛla monɔkɔ na ngai,+Ntango nyonso oyo moto mabe akozala liboso na ngai.”+ Masese 12:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga,+ kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.+ Masese 15:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Lolemo ya bato ya bwanya esalaka malamu na boyebi,+ kasi monɔkɔ ya bazoba esopasopaka bozoba.+ 1 Petro 3:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Mpo, “moto oyo alingi kosepela na bomoi mpe komona mikolo ya malamu,+ apekisa lolemo+ na ye koloba makambo ya mabe mpe mbɛbu na ye koloba makambo ya bokosi,+
39 Nalobaki ete: “Nakobatela banzela na ngai+Mpo nasala lisumu te na lolemo na ngai.+Nakotya eloko ya kokanga monɔkɔ mpo ekɛngɛla monɔkɔ na ngai,+Ntango nyonso oyo moto mabe akozala liboso na ngai.”+
18 Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga,+ kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.+
10 Mpo, “moto oyo alingi kosepela na bomoi mpe komona mikolo ya malamu,+ apekisa lolemo+ na ye koloba makambo ya mabe mpe mbɛbu na ye koloba makambo ya bokosi,+