Balevi 5:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto amemi ngambo mpo na moko ya makambo yango, asengeli koyambola+ ndenge oyo asali lisumu. Nzembo 32:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.+Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.+ Sela. Masese 28:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+ kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.+ Yakobo 5:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+
5 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto amemi ngambo mpo na moko ya makambo yango, asengeli koyambola+ ndenge oyo asali lisumu.
5 Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.+Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.+ Sela.
13 Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+ kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.+
16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+