Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 osengeli kobimisa mobali yango to mwasi yango oyo asali likambo yango ya mabe mpo na komema ye na baporte na yo, ɛɛ, mobali yango to mwasi yango, mpe osengeli kobamba moto yango mabanga, mpe moto yango asengeli kokufa.+

  • Baroma 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino, ete bókeba na bato oyo bakɔtisaka bokabwani+ mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo eyokani te na mateya+ oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.+

  • 1 Bakorinti 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi sikoyo nazali kokomela bino ete bótika kosangana+ na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso+ to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga+ to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.

  • 2 Batesaloniki 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Sikoyo tozali kopesa bino mitindo,+ bandeko, na nkombo ya Nkolo Yesu Kristo, ete bókima+ ndeko nyonso oyo azali kotambola na mobulu+ kasi te na kolanda momeseno oyo bozwaki epai na biso.+

  • 2 Batesaloniki 3:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi soki moto moko atosi te liloba na biso+ oyo ezali na mokanda oyo, bótya moto yango elembo,+ bótika kosangana na ye,+ mpo ayoka nsɔni.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto