Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Luka 11:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.+

  • Baroma 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino, ete bókeba na bato oyo bakɔtisaka bokabwani+ mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo eyokani te na mateya+ oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.+

  • 1 Bakorinti 1:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nzokande nazali kolendisa+ bino, bandeko, na nkombo+ ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani,+ mpe ete bokabwani+ ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.+

  • Yakobo 3:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpo epai zuwa+ mpe kowelana ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ezali wana.+

  • 3 Yoane 10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yango wana, soki nayei, nakokundola misala na ye oyo azali kokoba kosala,+ ndenge azali kolobaloba mabe mpo na biso.+ Lisusu, asuki kaka na makambo wana te, ye moko ayambaka bandeko+ na limemya te, mpe baoyo balingi koyamba+ bango, alukaka kopekisa+ bango mpe kobwaka bango libándá+ ya lisangá.

  • Emoniseli 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo, yo mpe ozali na bato oyo basimbi makasi mateya ya mwa lingomba ya Nikolausi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto