Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Sɛngá ngai,+ napesa yo bikólo mpo ezala libula na yo+

      Mpe mabele tii na bansuka na yango ezala ya yo.+

  • Matai 19:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Yesu alobaki na bango ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Ntango biloko nyonso ekokóma ya sika,* ntango Mwana ya moto akofanda na kiti ya bokonzi na ye ya nkembo, bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi zomi na mibale, bokosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.+

  • Luka 22:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 mpe nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana+ ná ngai, mpo na bokonzi,+

  • Emoniseli 3:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Moto oyo alongi+ nakopesa ye nzela afanda elongo na ngai na kiti na ngai ya bokonzi,+ ndenge ngai mpe nalongaki mpe nafandi+ elongo na Tata na ngai na kiti na ye ya bokonzi.+

  • Emoniseli 20:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe namonaki bakiti ya bokonzi,+ mpe ezalaki na baoyo bafandaki na yango, mpe bapesaki bango nguya ya kosambisa.+ Ɛɛ, namonaki milimo ya baoyo babomamaki na sóka mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe mpo balobelaki Nzambe, mpe baoyo basambelaki nyama mabe+ ná elilingi na yango te+ mpe oyo bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na mabɔkɔ na bango.+ Mpe bazongaki na bomoi mpe bayangelaki+ elongo na Kristo mbula nkóto moko (1 000).

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto