Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 29:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ee Yehova, bonene,+ nguya,+ kitoko,+ nkembo+ ná lokumu+ ezali ya yo; mpo eloko nyonso na likoló mpe na mabele ezali ya yo.+ Bokonzi+ ezali ya yo, Ee Yehova, Yo mokonzi oyo otombwami likoló na nyonso.+

  • Nzembo 22:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpo bokonzi ezali ya Yehova,+

      Mpe ye azali koyangela bikólo.+

  • Nzembo 97:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 97 Yehova ye moko akómi mokonzi!+ Mabele ezala na esengo.+

      Ebele ya bisanga esepela.+

  • Danyele 4:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bakɛngɛli+ bapesi mitindo ya likambo yango, mpe basantu nde basakoli ekateli yango, mpo bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato+ mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa+ mpe atyaka moto oyo aleki moke kati na bato azala mokonzi na yango.”+

  • Danyele 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 “Mpe na nsuka ya mikolo,+ ngai Nebukadenezare natombolaki miso na ngai na likoló,+ mpe mayele na ngai ekómaki kozongela ngai; mpe napambolaki Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe nasanzolaki mpe nakumisaki Ye oyo azali na bomoi seko,+ mpo boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko mpe bokonzi na ye ezali libota na libota.+

  • Emoniseli 12:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe nayokaki mongongo moko ya makasi na likoló elobi ete:

      “Sikoyo lobiko,+ ná nguya,+ ná bokonzi ya Nzambe na biso,+ ná bokonzi ya Kristo na ye+ eyei, mpo mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse, ye moto afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto