Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Ntango 21:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe Satana atɛlɛmɛlaki Yisraele mpe apusaki+ Davidi azwa motángo ya Yisraele.

  • Yobo 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nzokande, mokolo oyo bana ya Nzambe ya solo+ bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova+ ekómaki, Satana+ mpe akɔtaki elongo na bango.+

  • Zekaria 3:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bongo anzelu+ ya Yehova alobaki na Satana ete: “Ee Satana, Yehova apamela+ yo, ɛɛ, Yehova apamela yo, ye oyo azali kopona Yerusaleme!+ Moto oyo azali te lokoni oyo elongolami na mɔtɔ?”+

  • Matai 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo,+ mpe kaka ye moko+ nde osengeli kosalela mosala mosantu.’”+

  • Yoane 13:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe nsima ya kozwa ndambo yango ya limpa, Satana akɔtelaki ye.+ Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Oyo ozali kosala, salá yango nokinoki.”

  • Baroma 16:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Nsima ya mwa ntango moke, Nzambe oyo apesaka kimya+ akopanza Satana+ na nse ya makolo na bino. Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.+

  • 2 Batesaloniki 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi kozala ya mobuki mibeko eyokani na mosala+ ya Satana elongo na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto