Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 13:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Bóganga na kolela,+ mpo mokolo ya Yehova ezali pene!+ Ekoya lokola kopunzama oyo euti na Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+

  • Yirimia 25:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.+ Bakolela bango te, mpe bakoyanganisama te mpe bakokundama te.+ Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.’+

  • Ezekiele 30:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpo mokolo ekómi pene, ɛɛ, mokolo ya Yehova ekómi pene.+ Mokolo ya mapata,+ ekozala ntango oyo etyami mpo na bikólo.+

  • Yoele 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Aa! mawa na mokolo yango;+ mpamba te mokolo ya Yehova ekómi pene,+ mpe ekoya lokola nde Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali kopunza!

  • Yoele 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe Yehova ye moko akoyokisa mpenza mongongo na ye+ liboso ya limpinga ya basoda na ye,+ mpamba te kaa na ye ezali na bato beboo.+ Mpo ye oyo azali kokokisa liloba na ye azali na nguya; mpamba te mokolo ya Yehova ezali monene+ mpe na nsɔmɔ mingi, mpe nani akokoka kotɛlɛma liboso na yango?+

  • Sefania 1:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mokolo yango ezali mokolo ya nkɛlɛ, mokolo ya mpasi mpe ya bwale,+ mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi mpe ya libebi, mokolo ya molili mpe ya kozanga pole,+ mokolo ya mapata mpe ya molili tuu,

  • 2 Petro 3:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 bózela+ mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova+ oyo likoló, lokola ekozika na mɔtɔ, ekosilela+ mpe biloko na yango, lokola ekokóma mɔtɔ makasi, ekonyangwa!

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto