18 Batɛlɛmaki mpe bakendaki na Betele mpo na kotuna Nzambe.+ Bongo bato ya Yisraele batunaki: “Nani kati na biso asengeli komata liboso mpo na kobundisa Babenyamina?” Yehova ayanolaki: “Yuda nde akokende liboso.”
26 Na yango, mibali nyonso ya Yisraele, bakendaki na Betele. Balelaki mpe bafandaki wana liboso ya Yehova,+ bakilaki bilei+ na mokolo wana tii na mpokwa mpe bapesaki makabo ya kotumba+ mpe makabo ya kimya*+ liboso ya Yehova.